Aller au contenu

Thérèse Kayikwamba Wagner

Útá Wikipedia.
Version datée du 26 sɛtɛ́mbɛ 2024 à 13:29 par Longoli5 (ntembe | bíteni ya mosálá) (Créé en traduisant la page « Thérèse Kayikwamba Wagner »)
(mbó.) ← Lizóngeli lilekí | Lizóngeli na mosálá (mbó.) | Lizóngeli lilandí → (mbó.)

Modèle:Infobox Personnalité politique

Thérèse Kayikwamba Wagner azali mwasi ya politiki abotami na 1983 na kinsásá. Azali ministre ya Affaires étrangères ya Kongó-Kinsásá na gouvernement ya Suminwa uto juin 2024 .

Biografi ya bomoi ya bato

Bomwana mpe boyekoli

Thérèse Kayikwamba Wagner abotami na 1983 na Kinsásá na mama moko mukongomani mpe tata ya allemand. A koli kati ya Allemagne, Ghana mpe Togo [1] .

Ayekolaki na Eteyelo ya Harvard Kennedy na États-Unis, epai azwaki diplome ya master na makambo ya bokambi ya leta [2]

Mobembo ya misala

Thérèse Kayikwamba Wagner abandaki mosala na ye na 2009 tango akendaki na Kigali (Rwanda) mpo na kokota na Agence allemande ya coopération internationale ya développement (GIZ) [1] .

Kobanda 2011, azwaki ekateli ya komipesa na mosala ya kosalisa bato . Na sima azongi na Kongo-Kinsásá, na etuka ya Goma, mpo na kosala na eteni Oxfam . Na 2012, tango mboka ezalaki kokutana na crise na yango ya liboso na groupe ya batomboki M23, azuaki bokonzi ya programme ya protection ya ba civils o kati ya organisation eye [1] .

Na sima akoti na Nations unies, esika wapi amipesaki na ba missions ya bobateli kimia, kati na yango Monusco (Congo) lokola pe Minusca (Republiki ya afrika ya kati) uto 2014. Na 2019, akendaki na Nairobi (Kenya) mpo na kokóma mosungi ya Huang Xia, ntoma ya sipesiale ya Nations Unies mpo na etúká ya Grands Lacs .

Na sima asali na Groupe Meta tee na 2024, esika akomi Regional Program Manager pona Afrique sub-Sahara, poste esika akambaka milende ya komibongisa mpo na mikakatano mpe maponami » [1] , [2] .

Misala ya politiki

Thérèse Kayikwamba Wagner (na katikati) lokola Ministre ya Affaires étrangères na 2024 elongo na Janez Lenarčič, Commissaire européen.

Na 29 mai 2024, Thérèse Kayikwamba Wagner aponamaki Ministre ya Affaires étrangères, Coopération internationale mpe ya Francophonie, na lokumu ya Ministre d’Etat, na kati ya gouvernement ya sika ya Suminwa [2] .

Thérèse Kayikwamba Wagner azwi ebonga le 13 juin [3] . Na sima ekomi na contexte ya tension, oyo emonisami na matata na groupe ya batomboki M23 oyo esungami na Rwanda, mpe lisusu na bolongwi mokemoke ya mampinga ya MONUSCO na mboka [1] , [4] .

Ba références